11
Petelo apesi sango na Yelusalemi
Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe. Boye, tango Petelo azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye mpe balobaki :
— Okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango !
Petelo ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge esalemaki ; alobaki na bango :
— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki. Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya likolo. Nayokaki mpe mongongo moko koloba na ngai : « Petelo, telema ! Boma mpe lia. » Kasi nazongisaki : « Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto. »
Mongongo yango elobaki lisusu, wuta na likolo, mpo na mbala ya mibale : « Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te ! »
10 Esalemaki bongo mbala misato. Bongo babendaki nyonso kati na Likolo.
11 Kaka na tango yango, bato misato bakomaki na ndako epai wapi nazalaki kovanda ; batindaki bango epai na ngai longwa na Sezarea. 12 Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango. 13 Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye : « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo. 14 Akoyebisa yo maloba oyo, na nzela na yango, okozwa lobiko, yo mpe libota na yo mobimba ! »
15 Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango ndenge kaka akitelaki biso na ebandeli. 16 Mbala moko, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki : « Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
17 Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu-Klisto, bongo ngai nde nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi ?
18 Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa, mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Nzambe asali ete ata bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpo bazwa bomoi. »
Lingomba kati na Antioshe
19 Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda. 20 Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki. 21 Nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango, mpe bato ebele penza bandimaki mpe bamipesaki na Nkolo.
22 Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe. 23 Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba. 24 Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.
25 Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo ; 26 mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.
27 Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi. 28 Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi ; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode. 29 Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda. 30 Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.