12
Petelo abimi na boloko
Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango. Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga. Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire. Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.
Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko. Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye :
— Telema noki !
Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
Anjelu alobaki na ye :
— Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo !
Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu :
— Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli. 10 Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango ; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.
11 Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki :
— Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
12 Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela. 13 Petelo abetaki ekuke ; mpe mwasi mosali moko, kombo na ye « Rode, » apusanaki na ekuke mpo na koyanola. 14 Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo ; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki :
— Eh, ezali Petelo ! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke !
15 Balobaki na ye :
— Okomi penza na liboma !
Kasi Rode azalaki kaka koloba :
— Ya solo penza ! Petelo azali na libanda.
Bongo balobaki :
— Ekoki kozala anjelu na ye !
16 Nzokande, Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi. 17 Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu :
— Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu.
Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.
18 Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana :
— Likambo nini ekomelaki Petelo ?
19 Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango.
Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.
Kufa ya Erode
20 Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.
21 Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato. 22 Bato bagangaki :
— Tala yango oyo, mongongo ya nzambe ; ezali mongongo ya moto te !
23 Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.
24 Kasi Liloba na Nzambe ekobaki kopanzana mpe kobota mbuma.
25 Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »