15
Kobendana na tina na kokatisama ngenga
Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko :
— Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.
Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana ; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango. Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo. Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba :
— Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.
Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango. Lokola tembe elekaki makasi, Petelo atelemaki mpe alobaki :
— Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino mpo ete nakoka koteya Sango Malamu epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bakoma bandimi. Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso. Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima. 10 Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ? 11 Te ! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.
12 Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya. 13 Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki :
— Bandeko, boyoka ngai ! 14 Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye. 15 Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama :
16 « Sima na yango, nakozonga,
nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi,
oyo esila kokweya ;
nakotonga yango lisusu
mpe nakotelemisa yango,
17 mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo,
ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya
oyo babengamaka na Kombo na Ngai,
elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,
18 makambo oyo eyebana wuta kala. »
19 Yango wana, tala likanisi na ngai : Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe. 20 Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te. 21 Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.
Mokanda etindami epai ya bikolo ya bapaya
22 Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko. 23 Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye :
Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino :
Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ;
Mbote na bino.
24 Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.
25 Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo, 26 ba-oyo bakaba bomoi na bango mpo na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
27 Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo. 28 Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo : 29 Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango.
Botikala malamu !
30 Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango. 31 Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango. 32 Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima. 33 Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [ 34 Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.] 35 Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.
Polo mpe Barnabasi bakabwani
36 Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi :
— Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.
37 Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako ; 38 kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala. 39 Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre. 40 Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo. 41 Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.