16
Timote elongo na Polo mpe Silasi
Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto ; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese. Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi. Polo azalaki na posa ya kosala mobembo elongo na ye, boye akatisaki ye ngenga ; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya Grese. Kati na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba bazwaki na Yelusalemi, mpe bazalaki kosenga na bango ete batosa yango. Boye, Mangomba ezalaki kolendisama kati na kondima, mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.
Emoniseli ya Polo
Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia. Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te. Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi. Na butu, Polo azwaki emoniseli moko : « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye : ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane ! › »
10 Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.
Lidi abongoli motema kati na Filipi
11 Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase ; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi. 12 Kolongwa wana, tokendeki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki kuna mwa mikolo.
13 Na mokolo ya Saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale epai wapi tokanisaki ete tokomona esika ya losambo. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki kuna. 14 Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba. 15 Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki :
— Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai.
Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
Polo mpe Silasi na boloko
16 Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye. 17 Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga :
— Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.
18 Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango :
— Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo !
Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.
19 Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele. 20 Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki :
— Bato oyo bazali Bayuda ; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso. 21 Bazali koluka kokotisa awa bizaleli oyo mibeko epekisi biso, bato ya Rome, kondima mpe kosalela.
22 Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi bapesaki mitindo ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbu. 23 Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko ; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu. 24 Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.
25 Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango. 26 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki. 27 Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi. 28 Kasi Polo agangaki na mongongo makasi :
— Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !
29 Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi. 30 Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango :
— Batata, nasala nini mpo ete nabika ?
31 Bazongisaki :
— Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
32 Bongo bateyaki ye mpe libota na ye Liloba na Nkolo. 33 Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota ; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi. 34 Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei ; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.
35 Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli boloko mpo na koyebisa ye :
— Bimisa bato wana na boloko !
36 Mokengeli boloko alobaki na Polo :
— Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia.
37 Kasi Polo azongisaki :
— Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku ? Te, ekosalema bongo te ! Tika ete bango moko baya kobimisa biso !
38 Basali bakendeki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi. 39 Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana. 40 Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.