17
Polo mpe Silasi na Tesalonika
Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki. Ndenge momesano na ye ezalaki, Polo akotaki na ndako ya mayangani. Basaba misato, asololaki na bato oyo bazalaki kuna na tina na Makomi. Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango :
— Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.
Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.
Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato. Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga :
— Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi sik’oyo awa, mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »
Tango ebele ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi. Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko mosusu lomande mpe, na sima, batikaki bango.
Polo mpe Silasi kati na engumba Bere
10 Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda. 11 Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo. 12 Bayuda ebele kati na bango bandimaki ; ndenge moko mpe, kati na bato ya Grese, basi mingi ya lokumu mpe mibali ebele bandimaki.
13 Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba na Nzambe na Bere, mingi kati na bango bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka. 14 Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere. 15 Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
Polo kati na Ateni
16 Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko. 17 Boye, azalaki kosolola na Bayuda mpe Bagreki oyo bazalaki kogumbamela Nzambe kati na ndako ya mayangani, mpe na bato oyo azalaki kokuta, mokolo na mokolo, na bisika oyo bato ebele bakutanaka. 18 Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki :
— Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ?
Bamosusu balobaki :
— Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya !
Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi. 19 Boye bakamataki ye, bamemaki ye na Areopaje* mpe balobaki na ye :
— Boni, tokoki koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini ? 20 Pamba te ozali koloba na biso makambo ya sika. Yango wana, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini. 21 (Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).
22 Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki :
— Bato ya Ateni ! Nasosoli ete, na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe. 23 Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango :
Mpo na Nzambe oyo ayebani te.
Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.
24 Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya Likolo mpe ya mokili, avandaka te kati na batempelo oyo maboko ya bato etonga. 25 Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso. 26 Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda. 27 Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka Ye, tango mosusu bakolonga komona Ye na kolukaluka lokola mokufi miso. Nzokande, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko kati na biso. 28 Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »
29 Yango wana, lokola tozali bana na Nzambe, tosengeli te kokanisa ete bonzambe ekokani na elilingi ya wolo, ya palata to ya libanga, lokola nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto. 30 Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema. 31 Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
32 Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki :
— Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.
33 Na bongo, Polo atikaki bango. 34 Nzokande, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango, ezalaki : Denisi, moto ya Areopaje ; mwasi moko oyo kombo na ye ezali Damarisi, mpe bato mosusu.
* 17:19 Areopaje ezalaki ngomba moko ya mokuse epai wapi Likita-Monene ya bato ya Ateni ezalaki kosangana.