25
Polo asengi kosamba liboso ya Sezare
Mikolo misato sima na ye koya kati na etuka, Festisi alongwaki na Sezarea mpo na kokende na Yelusalemi epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendeki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. Babondelaki mingi Festisi mpo ete asalela bango ngolu ya kotinda Polo na Yelusalemi, pamba te basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye. Kasi Festisi azongiselaki bango :
— Polo azali nanu kati na boloko, na Sezarea ; mpe kala mingi te, nakozonga kuna. Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete, soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.
Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo. Tango kaka Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye na tina na makambo mingi ya mabe makasi, oyo bango moko bazangaki kutu makoki mpo na kotalisa bosolo na yango.
Polo asambaki boye :
— Nasalaki mabe moko te, nabukaki ata mobeko moko te ya Bayuda to ya Tempelo to mpe ya Sezare.
Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo :
— Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo ?
10 Polo azongisaki :
— Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe. 11 Soki nasali mabe to nasali likambo oyo ekoki komemela ngai etumbu ya kufa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Sezare akata likambo na ngai !
12 Sima na Festisi kokabola makanisi elongo na bapesi toli na ye, alobaki na Polo :
— Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Sezare, okokende solo kosamba liboso na ye.
Polo liboso ya Festisi mpe mokonzi Agripa
13 Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezarea mpo na kopesa Festisi mbote. 14 Lokola balekisaki kuna mikolo mingi, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo ; alobaki :
— Ezali awa na moto moko oyo Felikisi atikaki kati na boloko. 15 Tango nakendeki na Yelusalemi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai, mpe basengaki ete nakatela ye etumbu. 16 Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye. 17 Tango bayaki awa, nalekisaki tango te ; kasi mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango. 18 Tango bato oyo bafundaki ye batelemaki mpo na koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela. 19 Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi ; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. » 20 Lokola nayebaki te ndenge nini nakoki kokata likambo ya lolenge oyo, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna. 21 Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye kati na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Sezare.
22 Agripa alobaki na Festisi :
— Nazali na posa ya koyoka moto wana, ngai moko.
Festisi azongisaki :
— Okoyoka ye lobi.
23 Mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato, elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo. 24 Festisi alobaki :
— Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ! Lisanga mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye, na Yelusalemi mpe awa kati na Sezarea, bazalaki koganga ete asengeli kokufa. 25 Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome. 26 Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna. 27 Pamba te namoni ete tina ezali te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.