26
Polo asambi liboso ya Agripa
Agripa alobaki na Polo :
— Napesi yo nzela ya koloba.
Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba :
— Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi ya kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai, pamba te oyebi malamu bizaleli mpe tembe ya Bayuda. Boye nasengi na yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai.
Bayuda nyonso bayebi evandeli na ngai, wuta na bomwana na ngai, kobanda na ebandeli ya bomoi na ngai, kati na ekolo na ngai, mpe ezala kati na Yelusalemi. Bayebi ngai wuta kala mpe bakoki kotatola, soki balingi, ete natambolisaki bomoi na ngai lokola Mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko, ndenge lingomba na biso esengaka. Mpe nazali kosamba lelo mpo na elikya na ngai kati na elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso. Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai. Mpo na nini, kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi ?
Ngai moko mpe nazalaki liboso kokanisa ete esengeli na ngai kosala nyonso oyo ekoki kosalema, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti. 10 Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi : natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima. 11 Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.
12 Ezali mpo na yango nde nakendeki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya Banganga-Nzambe. 13 Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi ; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai. 14 Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »
15 Bongo natunaki : « Nkolo, yo nani ? »
Nkolo azongisaki : « Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola. 16  Kasi lamuka mpe telema ! Pamba te namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na Ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima. 17  Nakokangola yo wuta na maboko ya bato ya ekolo na yo mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango 18  mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »
19 Boye, mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na Likolo. 20 Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema. 21 Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai kati na Tempelo mpe balukaki koboma ngai. 22 Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai ; yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nazali koteya makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekokokisama solo : 23 Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
24 Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye :
— Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !
25 Polo azongisaki :
— Tata mokonzi Festisi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo mpe ezali penza na nzela. 26 Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu ; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nandimisami ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalemaki na nkuku te. 27 Mokonzi Agripa, boni, ondimaka basakoli ? Nayebi malamu ete ondimaka bango.
28 Agripa alobaki na Polo :
— Okanisi ete okoki kondimisa ngai kokoma Moklisto kaka na mwa tango moke ?
29 Polo azongisaki :
— Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo !
30 Wana azalaki koloba bongo, mokonzi, moyangeli, Berenise mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na bango batelemaki. 31 Wana bazalaki kobima, balobanaki bango na bango :
— Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya kufa to ya boloko.
32 Agripa alobaki na Festisi :
— Soki moto oyo asengaki te kosamba liboso ya Sezare, esengelaki kotika ye.