4
Isalaele aboyi kozongela Yawe
Bino bangombe ya basi ya Bashani,
boyoka maloba oyo ;
bozali lokola ngomba ya Samari,
bino bato oyo bonyokolaka babola,
bomonisaka bato bakelela pasi
mpe bolobaka na mibali na bino :
« Bomemela biso masanga mpo tomela. »
Nkolo Yawe alapi ndayi mpo na bosantu na Ye :
« Solo, na mikolo ekoya, bakomema bino
mpe bana na bino na bandobo ;
bokobimela na madusu kati na mir,
moko na moko na lidusu oyo ezali liboso na ye,
mpe bakobengana bino kino na ngomba Erimoni, »
elobi Yawe.
« Bokende na Beteli mpe bosala masumu,
bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka.
Bobonza bambeka na bino tongo nyonso,
mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.
Botumba farine oyo batia levire
lokola likabo ya kozongisa matondi,
mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino,
oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.
Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi,
pamba te bolingaka nde kosala bongo,
elobi Nkolo Yawe.
Nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso,
napimelaki bino bilei kati na bamboka na bino nyonso ;
kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, »
elobi Yawe.
« Napimelaki bino lisusu mvula,
basanza misato mobimba liboso ete tango
oyo babukaka bambuma ekoma.
Natindaki mvula na engumba moko
mpe nakangaki yango na engumba mosusu.
Elanga moko enokelaki mvula,
kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.
Bato bazalaki kotambola-tambola
longwa na engumba moko kino na engumba mosusu
mpo na koluka mayi,
kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te ;
atako bongo, bozongelaki Ngai te, »
elobi Yawe.
 
« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono,
banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka ;
bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive.
Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, »
elobi Yawe.
10 « Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka,
ndenge nasalaki kati na Ejipito ;
nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga
mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ;
mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe
oyo ekufaki na molako na bino.
Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, »
elobi Yawe.
11 « Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ;
bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto.
Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, »
elobi Yawe.
 
12 « Yango wana, Isalaele, tala makambo oyo nakosala yo !
Mpe lokola nakosala yo bongo, Isalaele,
mibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo. »
13 Pamba te Ye oyo asalaki bangomba,
oyo akelaki mipepe,
oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto,
oyo abongolaka pole molili,
oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili,
Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.