5
Kobengama mpo na kobongola motema
Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo,
eleli oyo nazali koloba na tina na bino :
« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele,
ezali kokoka kotelema lisusu te !
Basundoli yango kaka bongo,
mpe moto akotelemisa yango azali te. »
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
« Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko
mpo na kobundela Isalaele
ekotikala kaka na basoda nkama moko,
mpe oyo ekotinda basoda nkama moko
ekotikala kaka na basoda zomi. »
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele :
« Bozonga epai na Ngai mpe bokobika !
Bokende koluka na Beteli te,
bokende na Giligali te,
bosala mobembo na Beri-Sheba te.
Pamba te Giligali ekokende na bowumbu,
mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »
Boluka Yawe mpe bokobika,
soki te akokitela libota ya Jozefi
lokola moto oyo ekozikisa yango,
mpe moto moko te akozala na Beteli
mpo na koboma yango.
Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge
mpe bobwakaka bosolo na mabele,
boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto,
oyo abongolaka molili pole
mpe akomisaka moyi butu,
oyo abengaka mayi ya ebale monene
mpe asopaka yango na etando ya mokili ;
Kombo na Ye ezali : Yawe.
Akweyisaka bato ya makasi
mpe abebisaka engumba ya makasi.
 
10 Bino bato boyinaka moto
oyo akataka makambo na bosembo
mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,
11 lokola bozali konyokola babola
mpe kobotola bambuma na bango ya ble,
bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata,
bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.
12 Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele
mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene :
bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka,
mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
 
13 Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye,
pamba te mikolo ezali mabe.
 
14 Bolukaka kosala bolamu, kasi mabe te,
mpo ete bokoka kobika.
Boye, Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, akozala elongo na bino,
ndenge kaka bozali koloba yango.
15 Boyinaka kosala mabe,
kasi bolingaka nde kosala bolamu ;
bolukaka bosembo tango bozali kosambisa.
Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela
ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te
mawa kati na libota ya Jozefi.
16 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe,
Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Kolela ekozala na babalabala nyonso,
mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka.
Bakobengisa basali bilanga na matanga,
mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.
17 Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino,
pamba te nakoleka kati na bino, »
elobi Yawe.
Mokolo ya Yawe
18 Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe !
Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ?
Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
19 Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi,
bongo akutani na ngombolo ;
lokola moto oyo akoti na ndako na ye
mpe atie loboko na ye na mir,
bongo nyoka eswi ye.
20 Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ?
Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ?
Ekozala penza mokolo ya molili makasi,
ata kongenga moke ekozala te.
Losambo ya bibebu
21 Nayini bafeti na bino ya bule,
nazali kosepela na yango ata moke te ;
mayangani na bino ya bule ezali kolumba
solo mabe liboso na Ngai.
22 Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma,
nakondima yango te ;
ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta,
nakotala yango ata moke te.
23 Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai !
Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.
24 Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo
ndenge ebale etiolaka,
mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.
25 Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka
mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei
oyo bolekisaki na esobe ?
26 Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino,
mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko,
monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.
27 Yango wana nakotinda bino na bowumbu,
mosika koleka Damasi,
elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali :
Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.