11
Kosambisama ya bakangami ya Isalaele
Bongo Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na ekuke ya Tempelo ya Yawe, oyo etala na ngambo ya este. Bato tuku mibale na mitano bazalaki wana na ekotelo ya ekuke ; mpe namonaki kati na bango : Yazania, mwana mobali ya Azuri, mpe Pelatia, mwana mobali ya Benaya, oyo bazalaki bakambi ya bato. Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo. Balobaka : ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te ? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. › Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango ; sakola, mwana na moto ! »
Molimo na Yawe akitaki likolo na ngai mpe ayebisaki ngai ete naloba :
« Tala liloba oyo Yawe alobi : Tala makambo oyo bozali koloba, bino bakambi kati na Isalaele ! Kasi Ngai nayebi makambo oyo bozali kokanisa. Bobomi bato ebele kati na engumba oyo mpe botondisi babalabala na yango na bibembe. Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni ; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango. Bozali kobanga mopanga ? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe ; nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu. 10 Bokokufa na mopanga, nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele, bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. 11 Engumba oyo ekotikala te kozala nzungu mpo na bino, mpe bino bokotikala te kozala misuni kati na yango ; nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele. 12 Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. »
13 Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? »
Yawe alaki kosangisa lisusu Isalaele
14 Yawe alobaki na ngai :
15 « Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki : ‹ Bozala mosika na Yawe ; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. › 16 Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
17 Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. › 18 Bakozonga kuna mpe bakolongola bililingi na yango nyonso ya mbindo elongo na banzambe nyonso ya bikeko. 19 Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni, 20 mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. 21 Kasi mpo na bato oyo bapesa mitema na bango epai ya bililingi ya mbindo mpe banzambe ya bikeko mpo na kokoba kosalela yango, nakofuta bango kolanda misala na bango, elobi Nkolo Yawe. »
22 Na tango wana, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapine ekomaki kobaluka na mipanzi na bango ; boye nkembo na Nzambe ya Isalaele ezalaki na likolo na bango. 23 Nkembo na Yawe emataki na likolo longwa kati na engumba mpe ekendeki kotelema na likolo ya ngomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi. 24 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki. 25 Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.