12
Bilembo ya bowumbu
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki. Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki. Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango ; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango. Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala. Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. »
Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai : na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu ; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango.
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te : ‹ Ozali kosala nini ? › 10 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. ›
11 Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami. 12 Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu ; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te. 13 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna. 14 Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso : bakalaka mpe mampinga na ye ; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu. 15 Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu. 16 Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
17 Yawe alobaki na ngai :
18 « Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo ; 19 mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango. 20 Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
21 Yawe alobaki na ngai :
22 « Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele : ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te ? › 23 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. ›
Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama. 24 Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele. 25 Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke ; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › »
26 Yawe alobaki na ngai :
27 « Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. › 28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »