15
Lisese ya nzete ya vino
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini ? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini ? Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza ? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo ? Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango ; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga ? Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango ? Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi. Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu : Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »