14
Kosambisama ya basambeli ya banzambe ya bikeko
Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai. Bongo Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, bato oyo bazali kotia mitema epai ya banzambe ya bikeko. Bongo lokola bazali kotia banzambe ya bikeko liboso na bango, ekobetisa bango mabaku oyo ekokweyisa bango na masumu. Boni, natikela bango lisusu nzela ya kotuna Ngai toli ? Mpo na yango, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko. Nakosala bongo mpo na kozongisa lisusu epai na Ngai, mitema ya bana ya Isalaele oyo batikaki Ngai mpo na kolanda banzambe ya bikeko. ›
Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bobongola mitema ! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo ! Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye. Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele. 10 Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango. 11 Na bongo, bato ya Isalaele bakokabwana na Ngai lisusu te mpe bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya masumu na bango ; kasi bakozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bango, elobi Nkolo Yawe. › »
Nzambe asambisi Yelusalemi
12 Yawe alobaki na ngai :
13 « Mwana na moto, soki bato ya ekolo moko basali masumu liboso na Ngai mpe batamboli na boyengebene te, bongo Ngai nasemboli loboko na Ngai mpo na kopimela bango bilei mpe kotindela bango nzala makasi mpo ete ezala bato to banyama bakufa, 14 ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe. 15 To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ; 16 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika, kasi ekolo elingaki kotikala lisusu na bato te. 17 To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ; 18 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika. 19 To soki natindi kati na mokili yango bokono oyo ebomaka mpe nasopeli yango kanda na Ngai mpo na kosopa makila, koboma bato mpe bibwele ya mokili yango ; 20 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi ; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango.
21 Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango, 22 ekozala na ndambo ya bato oyo bakobika : bana mibali mpe ya basi. Bakoya epai na bino ; mpe tango bokomona bizaleli mpe misala na bango, bokobondisama mpo na pasi oyo natindelaki Yelusalemi, mpo na bitumbu nyonso oyo natindelaki yango. 23 Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango ; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »