17
Lisese ya bampongo mpe nzete ya vino
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele. Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Mpongo moko ya monene
oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami,
na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge,
ekendeki kotelema na Libani.
Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,
ebukaki etape moko ya moke
oyo ezalaki na songe ya nzete yango
mpe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo,
epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki.
Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana,
ekendeki kolona yango na mabele ya malamu,
lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi.
Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino ;
ezalaki penza mokuse,
kasi bitape na yango ezalaki efungwama
mpe etala na ngambo ya mpongo.
Bongo misisa na yango ezalaki kaka
etikala na se na yango.
Ekomaki nzete ya vino,
ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele.
Kasi ezalaki lisusu na mpongo mosusu ya monene
oyo ezalaki na mapapu ya milayi mpe basala ebele.
Nzokande, nzete ya vino wana ebimisaki
misisa na yango na ngambo ya mpongo wana,
longwa na esika oyo balonelaki yango
mpe epanzaki bitape na yango kino epai na mpongo wana,
mpo na kosopela yango mayi.
Balonaki yango na mabele ya malamu,
lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi,
pene ya mayi ebele mpo ete ebota bitape mpe bambuma,
mpe ekoma nzete monene ya vino. ›
Ndimbola ya lisese
Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Boni, ekokoma solo monene ?
Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te
mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka ?
Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka ;
ekoluka na yango makasi mingi te
mpe bato ebele te mpo na kopikola yango.
10 Ata soki bakei kolona yango esika mosusu,
okanisi ete ekokola ?
Ekokawuka nyonso tango mopepe ya este
ekoya kobeta yango ;
solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › »
11 Bongo Yawe alobaki na ngai :
12 « Loba na ndako ya batomboki oyo : ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini ? › Loba na bango : ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni. 13 Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi ; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili 14 mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye. 15 Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ?
16 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye. 17 Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba ; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele. 18 Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te !
19 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, nakomemisa ye ngambo ya ndayi na Ngai, oyo atioli mpe ya boyokani na Ngai, oyo abuki. 20 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai ; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai. 21 Basoda na ye nyonso ya mpiko bakokufa na mopanga mpe bato oyo bakotikala na bomoi bakopanzana bisika nyonso. Na bongo, bokoyeba solo ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki.
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakokamata etape ya songe ya nzete ya sedele mpe nakolona yango ; nakobuka na songe ya etape yango moto ya nzete moko, oyo nakolona na likolo ya ngomba oyo eleki molayi. 23 Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.
24 Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »