18
Moto oyo asalaka masumu akokufa
Yawe alobaki na ngai :
« Bino bato, mpo na nini kati na mokili ya Isalaele bolobaka lisese oyo : ‹ Batata basili kolia bambuma ya vino ya mibesu, kasi minu ya bana nde ekomi ngayi ; elakisi nini ? › Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, bokotikala lisusu koloba lisese oyo kati na Isalaele te. Pamba te bato nyonso ya bomoi bazali ya Ngai, ezala tata to mwana, bango mibale bazali ya Ngai ; moto oyo akosala masumu, ye moko nde akokufa.
Tozwa ndakisa ya moto moko oyo asalaka makambo ya sembo mpe ya alima, aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye, anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ; adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo ; atosaka bikateli na Ngai mpe abatelaka mibeko na Ngai na bosembo : moto ya lolenge wana nde azali sembo ; akozala solo na bomoi, elobi Nkolo Yawe.
10 Kasi soki, ndakisa, moto yango azali na mwana moko ya mobulu, oyo asopaka makila ya bato to asalaka makambo ya ndenge wana, 11 atako tata na ye asalaki yango te, mwana oyo aliaka na bisika ya bule na likolo ya bangomba, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, 12 anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo, 13 adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !
14 Kasi soki, ndakisa, mwana yango azali na mwana oyo, atako amonaka masumu nyonso oyo tata na ye asalaka, kasi asalaka ndenge moko te na tata na ye : 15 aliaka te bilei na bisika ya bule na likolo ya bangomba mpe atalelaka te banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, 16 anyokolaka moto te, akangaka eloko ya moto te soki adefisi ye niongo, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala, alatisaka moto oyo azali bolumbu, 17 abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai ; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye : akozala solo na bomoi. 18 Ezali tata na ye nde akokufa mpo na masumu na ye moko, pamba te abotolaki bato biloko na makasi, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki mabe kati na bato na ye.
19 Bozali koloba : ‹ Mpo na nini mwana amema te ngambo ya bambeba ya tata na ye ? › Ezali mpo ete mwana asalaki makambo ya sembo mpe ya alima, abatelaki mpe asalelaki na bokebi bikateli na Ngai nyonso, akozala solo na bomoi. 20 Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
21 Kasi soki moto mabe atiki masumu na ye nyonso, soki akomi kotosa bikateli na Ngai nyonso mpe kotambola kolanda bosembo mpe makambo ya alima, akozala solo na bomoi, akokufa te. 22 Mabe moko te oyo asalaki ekotangama lisusu na moto na ye ; akozala solo na bomoi mpo na makambo ya sembo oyo azali kosala. 23 Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi ?
24 Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
25 Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo ! 26 Soki moto ya sembo atiki bosembo na ye, asali masumu mpe akufi mpo na yango, akufi nde mpo na masumu oyo asali. 27 Kasi soki moto mabe atiki mabe na ye oyo azalaki kosala mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, abikisi solo bomoi na ye. 28 Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.
29 Libota ya Isalaele ezali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te ? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo ?
30 Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te ! 31 Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala ; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele ? 32 Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi ! »