20
Kotomboka ya Isalaele
Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai. Bongo, Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko. Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’
Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito. Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito. 10 Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe. 11 Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango. 12 Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.
13 Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe. 14 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito. 15 Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ; 16 pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko. 17 Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe.
18 Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko ! 19 Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai. 20 Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ 21 Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe. 22 Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
23 Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya ; 24 pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango. 25 Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te, 26 natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
27 Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. 28 Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga. 29 Boye, natunaki bango : Esambelo ya likolo ya ngomba* epai wapi bozali kokende elakisi nini ? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo : ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. ›
Kosambisama mpe lobiko
30 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko ? 31 Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.
32 Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te. 33 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ; 34 nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi. 35 Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu. 36 Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe. 37 Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani. 38 Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
39 Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko. 40 Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule. 41 Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo. 42 Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino. 43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki. 44 Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »
* 20:29 Esambelo ya likolo ya ngomba, babengaka yango Bama kino moyi ya lelo