21
Sango ya pasi mpo na Isalaele
Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya sude, loba mpo na kotelemela etuka ya sude mpe sakola mpo na kotelemela zamba ya mokili ya sude. Loba na zamba ya mokili ya sude : ‹ Yoka Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa moto kati na yo, mpe ekotumba banzete na yo nyonso, ezala banzete ya mobesu to ya kokawuka. Moto yango ya makasi ekotikala kokufa te mpe ekotumba bilongi nyonso, wuta na nor kino na sude. Bato nyonso bakomona ete ezali Ngai Yawe nde napelisi yango ; mpe ekotikala kokufa te. › »
Bongo nalobaki : « Ah ! Nkolo Yawe, bazali kotonga ngai : ‹ Ezali ye te oyo alobaka na masese ? › »
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele. Loba na mokili ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Natombokeli yo, nakobimisa mopanga na Ngai na ebombelo na yango mpe nakoboma bato, kati na mokili na yo, ezala bato ya sembo to bato mabe. Mpo ete nakoboma bato ya sembo mpe ya mabe, mopanga na Ngai ekobima na ebombelo na yango mpo na koboma moto nyonso, wuta na sude kino na nor. 10 Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. ›
11 Yango wana, mwana na moto, lela ! Kende kolela liboso na bango, na motema oyo ebukani mpe ya mawa. 12 Soki batuni yo : ‹ Mpo na nini ozali kolela ? › Okozongisela bango : ‹ Ezali mpo na sango oyo ezali koya. › Mitema mpe maboko nyonso ekolemba lokola mayi, bato nyonso bakomitungisa mpe mabolongo nyonso ekolenga. Sango yango ezali koya ; solo ekosalema, elobi Nkolo Yawe ! »
Mopanga ya Yawe
13 Yawe alobaki na ngai :
14 « Mwana na moto, sakola.
Loba : Tala liloba oyo Yawe alobi :
‹ Mopanga, mopanga !
Bangalisi mpe bapelisi yango !
15 Bapelisi yango mpo na koboma,
bangalisi yango mpo na kobimisa mikalikali !
Boni, tosepela kaka na lingenda ya bokonzi
ya mwana na ngai ya mobali ?
Mopanga ya mwana na ngai
esambwisaka banzete nyonso.
16 Mopanga epesami mpo ete bangalisa yango,
mpo ete basimba yango na loboko ;
bangalisi yango mpe bapelisi yango
mpo ete mobomi asalela yango.
17 Mwana na moto, ganga mpe lela makasi !
Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai,
mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele ;
babongisami mpo na kokufa na mopanga
elongo na bato na ngai.
Yango wana, beta tolo na yo !
18 Komekama ekoya penza ;
mpe likambo nini ekosalema
soki lingenda ya bokonzi, oyo mopanga esili kotiola,
etikali lisusu te, elobi Nkolo Yawe ? ›
19 Boye mwana na moto,
sakola mpe beta maboko na yo !
Tika ete mopanga eboma
mbala mibale to mbala misato !
Ezali mopanga oyo ebomaka ;
ezali solo mopanga oyo ebomaka mingi,
mopanga oyo ezingeli bango bisika nyonso.
20 Mpo ete mitema na bango ekoka kolenga
mpe bakufi bazala ebele,
nasili kotia mopanga oyo ebomaka
na bikuke nyonso ya bingumba na bango.
Tala, bangalisi yango mpo ete epela lokola mikalikali ;
basimbi yango mpo na koboma !
21 Oh mopanga, beta na ngambo ya loboko ya mobali
mpe beta na ngambo ya loboko ya mwasi ;
beta na esika nyonso oyo minu na yo etali !
 
22 Ngai mpe, nakobeta maboko na Ngai ;
mpe kanda na Ngai ya makasi ekokita.
Ngai Yawe nde nalobi. »
Kokweya ya Yelusalemi
23 Yawe alobaki na ngai :
24 « Mwana na moto, sala banzela mibale oyo mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekoki kolekela ; banzela nyonso mibale ebimela na mokili moko. Na ekotelo ya nzela moko na moko, tia elembo oyo ekolakisa nzela ya engumba. 25 Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda. 26 Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale* ya banyama. 27 Zeke oyo ekotalisa Yelusalemi ezali kati na loboko na ye ya mobali : kuna na Yelusalemi, akopesa mitindo ya koboma, akobeta mololo ya bitumba, akotia bashar ya bitumba liboso ya bikuke ya engumba, akotonga bamir ya zelo mpe akotimola mabulu ya kobombamela. 28 Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu. 29 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mabe na bino ezongeli bino na makanisi, lokola bolakisi Ngai na polele botomboki na bino mpe bomonisi masumu na bino kati na misala na bino nyonso ; lokola bosali bongo, bokokende na bowumbu.
30 Yo mokambi ya Isalaele, moto ya mbindo mpe moto mabe, mikolo ezali koya, tango na yo ya etumbu, mpo na kosukisa mabe na yo ! 31 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole ! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso ! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama. 32 Libebi ! Libebi ! Nakokomisa yango libebi. Ekotikala kobonga lisusu te kino tango moto oyo akopesa etumbu, oyo nakopesa ye makoki mpo na yango, akoya. ›
Etumbu mpo na mokili ya Amona
33 Mpe yo, mwana na moto, sakola mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na bato ya Amoni mpe mafinga na bango :
Mopanga, babimisi mopanga mpo na koboma,
bapelisi yango mpo na koboma
mpe mpo na kongenga lokola mikalikali !
34 Atako bapesaki yo bimoniseli mpe masakoli ya lokuta,
mopanga ekokata bakingo ya bato ya mbindo
oyo mokolo ya suka mpo na mabe na bango esili kokoka.
 
35 Zongisa mopanga na ebombelo na yango.
Nakosambisa yo na esika oyo okelamaki,
na mokili ya bakoko na yo.
36 Nakokitisela yo kanda na Ngai ya makasi
mpe nakofula yo moto ya kanda na Ngai ;
bongo nakokaba yo na maboko
ya bato ya mobulu oyo babebisaka.
37 Okozika na moto,
makila na yo ekopanzana kaka na mokili na yo
mpe bakokanisa yo lisusu te ;
pamba te Ngai Yawe nde nalobi. › »
* 21:26 Mabale to libale soki ezali moko : ezali moko ya biloko ya kati ya banyama oyo babengaka, na lifalanse : foie