35
Maloba ya kosambisa mokili ya Edomi
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya ngomba Seiri mpe sakola mpo na kotelemela yango ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Natombokeli yo, ngomba Seiri !
Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo
mpe nakokomisa yo esobe mpe mokili oyo ezanga bato.
Nakobebisa bingumba na yo,
mpe okotikala lisusu na bato te ;
boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakosopa makila na yo, mpe makila ekolanda yo. Lokola ozalaki na somo te ya kosopa makila, makila ekolanda yo. Nakokomisa ngomba Seiri esika oyo ebebisama nye mpe ezanga bato ; mpe nakoboma kuna bato nyonso oyo bakoluka kokende mpe kozonga. Nakotondisa bangomba na yango nyonso na bibembe ; bato nyonso oyo bakokufa na mopanga bakokweya na bangomba na yo ya mike, kati na mabwaku na yo mpe na se ya bangomba na yo nyonso. Nakokomisa yo esobe mpo na libela, bingumba na yo ekozala lisusu na bato te ; boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
10 Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ; 11 mpo na yango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakopesa yo etumbu kolanda kanda mpe zuwa na yo, oyo olakisaki mpo na kosala bango mabe mpo ete oyinaki bango ; mpe Ngai moko, nakosala ete bayeba Ngai tango nakosambisa yo. 12 Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki : ‘ Tala, bangomba ebebisami ! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia ! ’ 13 Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo ; nayokaki yango Ngai moko. 14 Boye, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tango mokili mobimba ekozala na esengo, Ngai nakobebisa yo. 15 Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »