34
Maloba ya kosambisa bakambi ya Isalaele
Yawe alobaki na ngai :
« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ? Bolingi kaka kolia mafuta na yango, kolata bilamba oyo esalemi na bapwale na yango mpe koboma bibwele oyo eleki mafuta, kasi bolukaka bolamu ya bibwele yango te ! Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango ! Boye, bibwele na Ngai epanzanaki bipai na bipai mpe ekomaki bilei ya banyama ya zamba, pamba te moto akobatela yango azalaki lisusu te. Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba ; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango.
Mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe : Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba ; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai ; mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe :
10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli babateli bibwele ! Nakotuna bango bibwele na Ngai, nakobotola bibwele na Ngai na maboko na bango, nakotika bango lisusu te kobatela yango. Boye, bakokoka lisusu te komilukela bolamu na bango moko. Nakokangola bibwele na Ngai na minoko na bango, mpe ekotikala lisusu bilei na bango te.
11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango. 12 Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi. 13 Nakobimisa yango wuta na bikolo epai wapi ezali ya kopanzana, nakosangisa yango wuta na mikili mosusu mpe nakozongisa yango na mabele na yango moko ; nakoleisa yango na likolo ya bangomba ya Isalaele, kati na mabwaku mpe kati na bamboka nyonso ya mike ya Isalaele. 14 Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele ; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.
15 Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe ; 16 nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.
Maloba ya lobiko mpo na mpate
17 Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali. 18 Boni, ekoki te mpo na bino kolia na matiti ya kitoko ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino enyataka-nyataka matiti oyo etikali ? Ekoki te mpo na bino komela mayi ya peto ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino ekomisa potopoto mayi oyo etikali ? 19 Bolingi ete bibwele na Ngai elia matiti oyo matambe na bino enyati-nyati mpe emela mayi oyo matambe na bino ekomisi potopoto ?
20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bango : Tala, nakokata, Ngai moko, makambo kati na ebwele oyo ya mafuta mpe oyo ekonda. 21 Lokola bosalelaki mipanzi mpe mapeka na bino mpo na kotindika bibwele oyo ekonda, mpe maseke na bino mpo na kobundisa yango kino kopanza yango na libanda, 22 nakobikisa bibwele na Ngai, mpe bakoyiba yango lisusu te ; nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu.
23 Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele : Davidi, mosali na Ngai ; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango. 24 Ngai Yawe, nakozala Nzambe na yango ; mpe Davidi, mosali na Ngai, akozala mokambi kati na yango. Ngai Yawe nde nalobi.
25 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba. 26 Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli. 27 Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango. 28 Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te ; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.
29 Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango ; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te. 30 Boye, bakoyeba solo ete Ngai Yawe, Nzambe na bango, nazali elongo na bango, mpe ete bango, libota ya Isalaele, bazali bato na Ngai, elobi Nkolo Yawe. 31 Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »