15
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembi loyembo
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe :
Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,
mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye !
Azindisi mpunda mpe motambolisi
na yango kati na ebale monene.
 
Yawe azali makasi na ngai,
azali solo loyembo na ngai,
azali mobikisi na ngai,
azali Nzambe na ngai,
nakokumisa Ye ;
azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.
Yawe azali elombe ya bitumba ;
Kombo na Ye ezali Yawe.
Azindisi na ebale monene,
bashar mpe mampinga ya Faraon ;
abwaki na ebale monene ya barozo,
bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.
Mozindo ya mayi ezipi bango,
bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.
Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,
emonisi nguya na Yo ;
loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,
enyati monguna.
 
Na monene ya nguya na Yo,
obebisi batelemeli na Yo ;
na kanda na Yo, otombokeli bango,
mpe baziki lokola matiti.
Na pema ya zolo na Yo,
mayi ekabwani,
bambonge etelemi lokola mir,
mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.
Monguna amilobelaki :
« Nakolanda bango kino nakokanga bango,
molimo na ngai ekotonda
na biloko oyo nakobotola ;
nakobimisa mopanga na ngai,
mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »
10 Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo,
mpe ebale monene ezipi bango.
Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.
11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ?
Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu,
somo, mpe abongi na lokumu,
mpe asalaka makambo ya kokamwa ?
12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali,
mpe mabele emeli bango.
13 Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli.
Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.
14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga,
somo ekangaki bato ya Filisitia.
15 Bakambi ya Edomi bakomi na somo,
bankumu ya Moabi bakomi kolenga,
bato ya Kanana balembi nzoto.
16 Kobanga mpe somo ekweyeli bango.
Na nguya ya loboko na Yo,
bakomi bababa lokola libanga
kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki,
kino bato oyo osikolaki balekaki.
17 Okomema bango mpe okovandisa bango
na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki,
oh Nkolo, mpo na kovanda,
Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.
18 Yawe akotikala mokonzi libela na libela !
19 Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
20 Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina. 21 Miriami ayembaki elongo na bango :
« Boyembela Yawe,
pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ;
azindisi na ebale monene,
mpunda mpe motambolisi na yango. »
Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe
Mayi ya Mara
22 Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te. 23 Tango bakomaki na Mara* epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »
25 Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela.
Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango. 26 Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
27 Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.
* 15:23 Mara elakisi : bololo. 15:27 Etima ezali esika oyo mayi ebandaka kobima na mabele.