16
Mana mpe bakayi
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.
Bana ya Isalaele balobaki na bango :
— Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
Yawe alobaki na Moyize :
— Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai. Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango.
Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele :
— Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito. Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ?
Moyize alobaki lisusu :
— Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
Boye Moyize alobaki na Aron :
— Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.
10 Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
11 Yawe alobaki na Moyize :
12 — Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana*. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
13 Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
14 Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
15 Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango :
— Oyo nini ?
Pamba te bayebaki te soki ezali nini.
Moyize alobaki na bango :
— Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia. 16 Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo : « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. »
17 Bato ya Isalaele basalaki bongo : bamoko balokotaki moke ; mpe bamosusu, ebele. 18 Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.
19 Moyize ayebisaki bango :
— Moko te abomba ata moke kino na tongo.
20 Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango. 21 Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia.
Mokolo ya kopema
22 Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko : omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize. 23 Moyize alobaki na bango :
— Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
24 Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango. 25 Moyize ayebisaki bango :
— Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda. 26 Bokobanda kolokota yango mikolo motoba ; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te.
27 Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te. 28 Boye Yawe alobaki na Moyize :
— Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ? 29 Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda.
30 Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo.
31 Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
32 Moyize alobaki :
— Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »
33 Boye Moyize alobi na Aron :
— Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.
34 Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu. 35 Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.
36 Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa§.
* 16:12 Mana elingi koloba : oyo nini ? 16:13 Kayi ezali ndeke lokola ebenga. 16:16 Omeri ezali ekolo oyo ekotaka balitele minei. § 16:36 Efa ezali katini oyo ekotaka balitele tuku minei.