18
Jetro ayei kotala Moyize
Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.
Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye, elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi*, » pamba te Moyize amilobelaki : « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya ; » mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »
Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe. Jetro atindelaki Moyize maloba oyo :
— Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali.
Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo. Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango. Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.
10 Jetro alobaki :
— Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito. 11 Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.
12 Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.
Toli ya Jetro
13 Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa. 14 Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki :
— Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ?
15 Moyize azongiselaki ye :
— Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe. 16 Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.
17 Bokilo ya Moyize alobaki na ye :
— Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te. 18 Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo ; okolonga kosala yango yo moko te. 19 Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe 20 mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala. 21 Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. 22 Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike ; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te ; pamba te okokabola yango elongo na bango. 23 Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango.
24 Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki. 25 Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. 26 Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.
27 Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.
* 18:3 Gerishomi elingi koloba : mopaya kuna. 18:4 Eliezeri elingi koloba : Nzambe Mosungi.