Boyokani ya Sinai
19
Nzambe aponi Isalaele
Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai. Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.
Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye :
— Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele : « Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai. Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai, kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.
Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba. Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko :
— Tokosala nyonso oyo Yawe alobi.
Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.
Yawe alobaki na Moyize :
— Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo.
Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
Libulisi ya bato
10 Yawe alobaki na Moyize :
— Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ; 11 bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele. 12 Okotia bandelo zingazinga ya ngomba mpo na bato mpe okoyebisa bango : « Bosala keba ete bomata te na ngomba oyo mpe bopusana te pembeni na yango. Moto nyonso oyo akotuta yango akokufa penza. 13 Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga ; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. »
14 Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango. 15 Moyize alobaki na bango :
— Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.
Yawe akiti na ngomba Sinai
16 Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki. 17 Moyize abimisaki bato mpo ete bakende kokutana na Nzambe, na libanda ya molako. Mpe bato batelemaki na ebandeli ya ngomba. 18 Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi. 19 Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.
20 Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki. 21 Yawe alobaki na Moyize :
— Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa. 22 Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa ; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.
23 Moyize alobaki na Yawe :
— Bato ya Isalaele bakoki te komata na ngomba Sinai, pamba te Yo moko oyebisaki biso ete totia bandelo zingazinga ya ngomba mpe tomona yango lokola bule.
24 Yawe azongiselaki ye :
— Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
25 Moyize akitaki, akendeki epai ya bana ya Isalaele mpe ayebisaki bango makambo oyo Yawe alobaki.