23
Na tina na bosembo
Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta. Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo. Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi.
Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango. Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te ; osengeli kosalisa yango.
Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi. Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe. Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.
Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
Na tina na mobu ya bopemi mpe mokolo ya Saba
10 Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma. 11 Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
12 Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.
13 Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.
Na tina na bafeti misato ya minene na mobu
14 Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai.
15 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi*, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
16 Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.
17 Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe.
18 Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.
19 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
Yawe alaki kosunga bato ya Isalaele
20 Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino. 21 Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.
22 Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino. 23 Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.
24 Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni. 25 Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino. 26 Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino.
27 Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima. 28 Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino. 29 Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino. 30 Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka. 31 Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
32 Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango. 33 Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »
* 23:15 Abibi ezali sanza oyo ble ekomelaka.