24
Yawe alendisi boyokani elongo na Isalaele
Yawe alobaki na Moyize :
— Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele ; bokogumbama na mosika. Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe ; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye.
Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo :
— Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.
Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele. Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani. Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo. Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki :
— Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.
Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki :
— Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso.
Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba 10 epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo. 11 Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.
Moyize akutani na Yawe
12 Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »
13 Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe. 14 Moyize alobaki na bakambi : « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »
15 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye 16 mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata. 17 Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka. 18 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.