27
Etumbelo ya bambeka
Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano. Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe okobamba bronze na etumbelo.
Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto. Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka. Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo. Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze. Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Okosala etumbelo na mabaya ; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba.
Lopango ya Mongombo
Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. 10 Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata. 11 Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata. 12 Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi. 13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. 14 Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 15 Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 16 Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi ; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 17 Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze. 18 Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze. 19 Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.
Mafuta mpo na etelemiselo ya minda
20 Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. 21 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.