26
Mongombo
Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango ekotalana. Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.
Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu ; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo. 10 Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. 11 Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. 12 Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo. 13 Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango. 14 Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
15 Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango. 16 Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. 17 Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo ; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. 18 Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ; 19 mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; 20 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, 21 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; 22 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, 23 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. 24 Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso : nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo. 25 Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
26 Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, 27 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. 28 Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo. 29 Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe okobamba mabaya wolo.
30 Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba.
31 Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. 32 Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata. 33 Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule. 34 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli. 35 Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude.
36 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 37 Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.