31
Basali ya Esika ya bule
Yawe alobaki na Moyize :
— Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ; mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ; mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani.
 
Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :
 
Ndako ya kapo ya Bokutani,
Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku,
mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;
mesa elongo na biloko na yango ;
etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ;
etumbelo ya malasi,
etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ;
sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ;
10 bilamba ya mosala,
bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron,
bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,
11 mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule.
 
Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo.
Mokolo ya Saba
12 Yawe alobaki na Moyize :
13 — Loba na bana ya Isalaele : « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba ; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino. 14 Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye ; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. 15 Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye. 16 Bana ya Isalaele bakobatela mokolo ya Saba ; bango mpe bakitani na bango bakotosa yango lokola boyokani ya libela na libela. 17 Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili ; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »
18 Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.