Isalaele abuki boyokani elongo na Nzambe
32
Bana ya Isalaele basali nzambe
Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki :
— Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.
Aron azongiselaki bango :
— Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango.
Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron. Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki :
— Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki :
— Feti ekozala lobi mpo na Yawe.
Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana.
Moyize alembisi kanda ya Yawe
Yawe alobaki na Moyize :
— Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela, bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »
Yawe alobaki lisusu na Moyize :
— Namoni ete bato oyo bazali batomboki. 10 Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.
11 Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki :
— Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ? 12 Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo. 13 Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
14 Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.
Moyize asilikeli bana ya Isalaele
15 Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima. 16 Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.
17 Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize :
— Ezali na makelele ya bitumba kati na molako !
18 Moyize azongisaki :
— Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.
19 Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba. 20 Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.
21 Moyize atunaki Aron :
— Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ?
22 Aron azongisaki :
— Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe. 23 Balobaki na ngai : « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. » 24 Bongo nayebisaki bango : « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo.
25 Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango. 26 Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki :
— Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai.
Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye. 27 Alobaki na bango :
— Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
28 Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki ; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki. 29 Moyize alobaki :
— Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino.
Moyize abondeli Yawe
30 Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato :
— Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.
31 Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki :
— Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo. 32 Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.
33 Yawe azongiselaki Moyize :
— Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai. 34 Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.
35 Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.