34
Yawe ayeisi sika boyokani
Yawe alobaki na Moyize :
— Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso ; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki. Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba. Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye ; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.
Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe. Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki :
— Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto, atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !
Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe ; alobaki :
— Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !
10 Yawe azongisaki :
— Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo. 11 Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. 12 Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino ! 13 Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera. 14 Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa. 15 Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ; 16 mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
17 Bokosala nzambe ya ekeko te.
18 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi*, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
19 Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai ; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino : ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme. 20 Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali.
Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba.
21 Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.
22 Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu. 23 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele. 24 Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.
25 Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire ; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.
26 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo.
Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
27 Yawe alobaki lisusu na Moyize :
— Koma maloba oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde nasalaki boyokani elongo na yo mpe Isalaele.
28 Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.
Kongenga ya elongi ya Moyize
29 Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe. 30 Tango Aron mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete elongi ya Moyize ezali kongenga, babangaki kopusana pembeni na ye. 31 Moyize abengaki bango ; bongo Aron mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize, mpe ye Moyize asololaki na bango. 32 Sima na yango, bana nyonso ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize mpe ayebisaki bango mibeko nyonso oyo Yawe apesaki ye na ngomba Sinai.
33 Tango Moyize asilisaki kosolola na bango, azipaki elongi na ye na vwale. 34 Kasi tango nyonso Moyize azalaki kokota liboso ya Yawe mpo na kosolola na Ye, azalaki kolongola vwale kino tango akobima. Mpe soki abimi, azalaki koyebisa na bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo azalaki kozwa epai na Yawe. 35 Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe.
* 34:18 Abibi to Nisani ezali sanza ya liboso na manaka ya Bayuda : ezali na sanza yango nde bana ya Isalaele babimaki na Ejipito mpe ble ekomelaka. Ekokani na suka ya sanza ya misato mpe ebandeli ya sanza ya minei, na manaka na biso.