33
Yawe atindi Moyize
Yawe alobaki na Moyize :
— Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo. Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela.
Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele. Bongo Yawe alobaki na Moyize :
— Loba na bana ya Isalaele : « Bozali batomboki ; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. »
Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi.
Ndako ya kapo ya Bokutani
Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako. Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani. Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize. 10 Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo. 11 Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
Moyize mpe nkembo ya Yawe
12 Moyize alobaki na Yawe :
— Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. » 13 Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
14 Yawe azongisaki :
— Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.
15 Moyize azongisaki :
— Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo. 16 Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.
17 Yawe alobaki na Moyize :
— Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.
18 Moyize azongisaki :
— Monisa ngai nkembo na Yo.
19 Yawe azongisaki :
— Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo ; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. 20 Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi.
21 Yawe alobaki lisusu :
— Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga. 22 Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka. 23 Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo ; kasi okokoka komona elongi na Ngai te.