Misala ya Mongombo
36
Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.
Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango. Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango mpe bayaki koloba na Moyize :
— Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki.
Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele :
— Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo !
Boye bato batikaki komema makabo, pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema : ezalaki kutu ya koleka.
Batapi
Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi. 10 Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. 11 Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. 12 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango etalanaki. 13 Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko.
14 Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. 15 Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. 16 Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu. 17 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. 18 Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. 19 Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
Bizingelo
20 Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango. 21 Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. 22 Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko ; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. 23 Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo, 24 mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; 25 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, 26 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; 27 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, 28 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. 29 Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso : nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo. 30 Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
31 Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, 32 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. 33 Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo. 34 Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe babambaki mabaya wolo.
Rido
35 Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango. 36 Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata. 37 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 38 Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.