37
Sanduku mpe mofinuku
Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo. Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo. Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango. Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku.
Mesa ya mapa
10 Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 11 Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango. 12 Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango. 13 Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki. 14 Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku. 15 Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo. 16 Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
Etelemiselo ya minda
17 Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko. 18 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu. 19 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 20 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 21 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko ; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda. 22 Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto. 23 Asalaki minda sambo ; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu. 24 Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
Etumbelo ya malasi
25 Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko. 26 Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango ; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo. 27 Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo. 28 Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo. 29 Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi.