38
Etumbelo ya mbeka ya kotumba
Betisaleyeli asalaki na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo ya bambeka ya kotumba ; ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ezalaki ya metele moko na basantimetele tuku mitano. Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe abambaki bronze na etumbelo. Asalaki na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto. Asalaki motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; akangisaki bapete minei ya bronze na basonge nyonso minei ya motalaka. Asalaki na bronze bapete minei oyo atiaki na basonge nyonso minei ya motalaka mpo na koyamba mabaya. Asalaki na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe abambaki yango bronze. Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango.
Sani monene mpo na komipetola
Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
Lopango
Tala ndenge atongaki lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ezalaki ya bametele pene tuku mitano na molayi, ezipamaki na rido ya lino oyo basali bilamba basalaki. 10 Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata. 11 Ngambo ya nor ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ezalaki na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ezalaki ya palata. 12 Ngambo ya weste ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe barido elongo na makonzi zomi, makolo zomi, bibende ya palata egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela. 13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. 14 Ngambo moko ya ekuke ezalaki na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 15 Ngambo mosusu ya ekuke ezalaki mpe na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 16 Barido nyonso zingazinga ya lopango ezalaki ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. 17 Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze ; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela. 18 Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki. 19 Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. 20 Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze.
Biloko oyo basalelaki Mongombo
21 Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. 22 Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. 23 Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.
24 Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola. 25 Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. 26 Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano. 27 Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko : elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko. 28 Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi. 29 Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko. 30 Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso. 31 Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.