7
Yawe alobaki na Moyize : « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo. Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito. Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele. Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »
Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
Lingenda ya Aron ebongwani nyoka
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »
10 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka. 11 Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. 12 Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango. 13 Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.
Bitumbu ya Yawe ekweyi na Ejipito
Etumbu ya liboso : mayi ebongwani makila
14 Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende. 15 Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka. 16 Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. 17 Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila. 18 Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › »
19 Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »
20 Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila. 21 Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
22 Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki. 23 Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te. 24 Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.
Etumbu ya mibale : magorodo
25 Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili. 26 Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 27 Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba. 28 Nili ekotonda na magorodo ; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine. 29 Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »