8
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito. Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :
— Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
Moyize alobaki na Faraon :
— Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo ; kasi etikala kaka na ebale Nili.
Faraon azongisaki :
— Tika ete esalema lobi.
Moyize alobaki :
— Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso. Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo ; kasi ekotikala kaka na ebale Nili.
Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon. Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga. 10 Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola. 11 Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
Etumbu ya misato : bangungi
12 Yawe alobaki na Moyize :
— Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
13 Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi. 14 Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama. 15 Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
Etumbu ya minei : banzinzi oyo eswaka
16 Yawe alobaki na Moyize :
— Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 17 Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka. 18 Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango. 19 Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »
20 Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka. 21 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :
— Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.
22 Kasi Moyize azongisaki :
— Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ? 23 Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.
24 Faraon alobaki :
— Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai !
25 Moyize azongisaki :
— Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.
26 Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe 27 mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki : banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki. 28 Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.