9
Etumbu ya mitano : bokono kati na bibwele
Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango, loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba. Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »
Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »
Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki. Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
Etumbu ya motoba : bapota ya kopola
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon. Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »
10 Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele. 11 Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito. 12 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.
Etumbu ya sambo : mvula ya mabanga
13 Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 14 Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba. 15 Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili. 16 Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. 17 Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende, 18 lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala. 19 Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
20 Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako. 21 Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.
22 Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »
23 Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito. 24 Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo. 25 Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso. 26 Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.
27 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango :
— Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe. 28 Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
29 Moyize azongisaki :
— Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe. 30 Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
31 Lino mpe Orje* ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo. 32 Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te.
33 Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito. 34 Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi. 35 Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.
* 9:31 Orje ezali mbuma oyo ekokana na loso mpe ebimaka mbala moko na mobu. 9:32 Epotele ezali nzete oyo ebotaka mbuma kasi ebimaka noki te.