15
Nzambe asali boyokani elongo na Abrami
Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli :
— Kobanga te, Abrami !
Nazali nguba na yo,
lifuti na yo ekozala monene.
Kasi Abrami azongisaki :
— Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
Abrami alobaki lisusu :
— Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai !
Yawe alobaki na ye :
— Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye :
— Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango.
Alobaki na ye lisusu :
— Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
Alobaki na ye lisusu :
— Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.
Kasi Abrami alobaki :
— Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ?
Yawe alobaki na ye :
— Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
10 Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te.
11 Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango.
12 Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye. 13 Boye, Yawe alobaki na Abrami :
— Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. 14 Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. 15 Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo. 16 Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
17 Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama. 18 Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : 19 mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, 20 ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, 21 ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »