16
Agari mpe Isimaeli
Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » Sarayi alobaki na Abrami :
— Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye.
Abrami ayokaki maloba ya Sarayi. Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye. Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye. Boye, Sarayi alobaki na Abrami :
— Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
Abrami alobaki :
— Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu.
Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri. Atunaki ye :
— Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ?
Azongisaki :
— Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
Anjelu ya Yawe alobaki na ye :
— Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.
10 Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu :
— Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.
11 Alobaki na ye lisusu :
— Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali,
okopesa ye kombo « Isimaeli, »
pamba te Yawe ayoki yo,
kati na mawa na yo.
12 Akozala lokola ane ya zamba.
Loboko na ye ekobundisa moto nyonso,
mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ;
akovanda esika moko te na bandeko na ye.
13 Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? »
Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. 14 Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi*. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
15 Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. » 16 Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.
* 16:14 Beri Lakai-Royi elingi koloba : libulu ya Ye oyo azali na bomoi, oyo azali komona ngai. 16:15 Isimaeli elakisi : Nzambe ayoki.