18
Abrayami ayambi bapaya misato
Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi. Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.
Alobaki :
— Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te. Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo. Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino.
Bazongisaki :
— Ezali malamu, sala ndenge olobi.
Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini* misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. »
Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki. Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.
Sima, batunaki ye :
— Wapi Sara, mwasi na yo ?
Abrayami azongisaki :
— Azali na ndako.
10 Bongo moko kati na bango alobaki :
— Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali.
Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami. 11 Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota. 12 Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »
13 Yawe alobaki na Abrayami :
— Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? » 14 Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
15 Sara abangaki ; boye awanganaki :
— Naseki te.
Kasi Yawe alobaki :
— Ezali ya solo, oseki.
Abrayami alobeli Sodome
16 Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela.
17 Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ? 18 Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye. 19 Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
20 Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza. 21 Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. »
22 Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe. 23 Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki :
— Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ? 24 Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ? 25 Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
26 Yawe azongisaki :
— Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango.
27 Abrayami alobaki lisusu :
— Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai. 28 Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ?
Yawe azongisaki :
— Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
29 Abrayami alobaki na Ye lisusu :
— Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ?
Azongisaki :
— Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
30 Bongo Abrayami alobaki :
— Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ?
Azongisaki :
— Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
31 Abrayami alobaki :
—Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ?
Azongisaki :
— Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
32 Bongo Abrayami alobaki :
— Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ?
Azongisaki :
— Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
33 Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki ; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.
* 18:6 Katini misato ekotaki bakilo pene zomi na motoba