19
Yawe abebisi Sodome mpe Gomore
Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele. Alobaki na bango :
— Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino.
Bazongiselaki ye :
— Te, tokolala kaka libanda.
Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.
Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako. Babelelaki Loti :
— Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo ? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto.
Loti abimaki mpo na kosolola na bango ; akangaki ekuke sima na ye. Alobaki :
— Te, baninga na ngai, bosala mabe te ! Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.
Bazongisaki :
— Longwa wana.
Balobaki lisusu :
— Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya ; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango.
Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango. 10 Kasi mibali oyo bazalaki kati na ndako babimisaki maboko mpe babendaki Loti na kati ya ndako mpe bakangaki ekuke. 11 Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.
12 Mibali yango mibale balobaki na Loti :
— Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa : mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu ? Bimisa bango libanda ya esika oyo 13 mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe ; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo.
14 Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! »
Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.
15 Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki :
— Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu.
16 Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi ; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa.
17 Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki :
— Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !
18 Kasi Loti azongisaki :
— Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te ! 19 Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa. 20 Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai !
21 Anjelu alobaki na ye :
— Malamu mingi, nakokokisela yo lisusu bosenga oyo. Nakobebisa te engumba oyo ozali kolobela. 22 Kasi kima noki, pamba te nakoki kosala eloko moko te soki okomi nanu kuna te.
Yango wana babengaka engumba yango Tsoari*.
23 Loti akomaki na Tsoari tango tongo etanaki. 24 Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore. 25 Abebisaki bingumba yango, etando nyonso elongo na bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna mpe banzete nyonso. 26 Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa.
27 Na tongo makasi, Abrayami amataki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe ; 28 atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.
29 Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.
Loti mpe bana na ye ya basi
30 Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga. 31 Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te. 32 Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
33 Na butu wana, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango. Boye kulutu akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye, mpe tata na ye atikalaki koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.
34 Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
35 Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango ; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki. 36 Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango.
37 Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi ; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo. 38 Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo.
* 19:22 Tsoari elakisi : moke. 19:37 Moabi elakisi : abimi na mokongo ya tata. 19:38 Beni-Ami elakisi : mwana ya libota na ngai.