21
Mbotama ya Izaki
Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye. Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye. Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. » Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.
Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.
Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. » Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
Abrayami abengani Agari mpe Isimaeli
Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.
Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ; 10 ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. »
11 Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye. 12 Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. 13 Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. »
14 Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba. 15 Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke. 16 Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. 17 Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye. 18 Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »
19 Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana. 20 Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo. 21 Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
Abrayami asali boyokani elongo na Abimeleki
22 Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami :
— Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala. 23 Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.
24 Abrayami azongisaki :
— Nalapi ndayi !
25 Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi.
26 Abimeleki azongisaki :
— Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo.
27 Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki ; bongo bango mibale basalaki boyokani. 28 Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga. 29 Abimeleki atunaki Abrayami :
— Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini ?
30 Azongisaki :
— Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango.
31 Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba*, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
32 Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia. 33 Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko. 34 Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.
* 21:31 Beri-Sheba elakisi : libulu ya ndayi. 21:33 Tamarisi elakisi : nzete oyo ebimisaka banzete ebele ya mike-mike mpe etiaka kitoko na esika.