22
Nzambe ameki Abrayami
Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye :
— Abrayami !
Abrayami azongisaki :
— Ngai oyo.
Nzambe alobaki na ye :
— Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.
Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika. Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. »
Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.
Izaki atunaki Abrayami, tata na ye :
— Tata na ngai !
Abrayami azongisaki :
— Ngai oyo !
Izaki alobaki :
— Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ?
Abrayami azongisaki :
— Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba.
Boye bango mibale bakendeki nzela moko.
Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni. 10 Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali. 11 Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo :
— Abrayami ! Abrayami !
Abrayami azongisaki :
— Ngai oyo.
12 Anjelu alobaki :
— Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
13 Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali. 14 Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
15 Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo 16 mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko, 17 nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango. 18 Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »
19 Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.
Bana ya Naori
20 Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana :
21 Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ;
Kemweli, tata ya Arami ;
22 Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.
23 Betweli azalaki tata ya Rebeka.
Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe.
 
24 Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana :
Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.