24
Libala ya Izaki mpe Rebeka
Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso. Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso :
— Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango. Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
Mosali atunaki ye :
— Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ?
Abrayami alobaki :
— Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te. Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana. Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te.
Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango.
10 Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori. 11 Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
12 Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai. 13 Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi. 14 Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »
15 Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami. 16 Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
17 Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki :
— Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.
18 Mwana mwasi alobaki :
— Mela na yo, nkolo na ngai !
Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela. 19 Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki :
— Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.
20 Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso. 21 Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te.
22 Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko. 23 Atunaki ye :
— Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ?
24 Azongiselaki ye :
— Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori.
25 Abakisaki :
— Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
26 Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe. 27 Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
28 Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki. 29 Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi. 30 Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi. 31 Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
32 Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo. 33 Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki :
— Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango.
Labani alobaki na ye :
— Yebisa biso makambo yango.
34 Azongisaki :
— Nazali mosali ya Abrayami. 35 Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo. 36 Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango. 37 Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te. 38 Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. » 39 Nazongiselaki nkolo na ngai : « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. » 40 Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai. 41 Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. » 42 Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai. 43 Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? › 44 Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. » 45 Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. » 46 Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki : « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi. 47 Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye. 48 Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe ; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai. 49 Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.
50 Labani mpe Betweli bazongisaki :
— Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo. 51 Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.
52 Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe. 53 Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye. 54 Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana.
Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango :
— Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
55 Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki :
— Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende.
56 Kasi alobaki na bango :
— Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai ; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
57 Balobaki na ye :
— Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye.
58 Babengaki Rebeka mpe batunaki ye :
— Ondimi solo kokende na mobali oyo ?
Rebeka azongisaki :
— Iyo, nandimi.
59 Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye. 60 Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye :
« Ndeko na biso ya mwasi,
tika ete okoma mama ya nkoto ya bato,
mpe tika ete bana na yo bakamata
bingumba ya banguna na bango ! »
61 Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
62 Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi. 63 Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
64 Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye. 65 Atunaki mosali ya Abrayami :
— Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ?
Mosali ya Abrayami azongisaki :
— Azali nkolo na ngai.
Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
66 Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki. 67 Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.