23
Kufa ya Sara
Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo. Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti. Alobaki na bango :
— Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.
Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami :
— Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti. Ayebisaki bango :
— Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai.
10 Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye :
11 — Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.
12 Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka 13 mpe azongiselaki Efroni :
— Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna.
14 Efroni azongiselaki Abrayami :
15 — Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo.
16 Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
17 Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki 18 epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba. 19 Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. 20 Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.