31
Jakobi akimi Labani
Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. » Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.
Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »
Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele. Alobaki na bango :
— Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso ; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai. Boyebi bino moko ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso. Kasi ye asakanaki na ngai na kobongola lifuti na ngai mbala zomi. Atako bongo, Nzambe apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe. Tango azalaki koloba : « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba : « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo. Ezalaki bongo nde Nzambe azalaki kobotola bibwele ya tata na bino mpe kopesa ngai yango. 10 Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe. 11 Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. » 12 Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo. 13 Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. »
14 Rasheli mpe Lea bazongisaki :
— Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso ? 15 Azalaki komona biso lokola bapaya, pamba te atekaki biso mpe aliaki mbongo na mito na biso. 16 Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo.
17 Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo. 18 Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana. 19 Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye. 20 Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende. 21 Akimaki elongo na nyonso oyo ezalaki ya ye, akatisaki ebale mpe akendeki na mokili ya bangomba ya Galadi.
Labani alandi Jakobi
22 Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima. 23 Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi. 24 Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
25 Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana. 26 Labani alobaki na Jakobi :
— Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba ! 27 Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda. 28 Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma ! 29 Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. » 30 Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ?
31 Jakobi azongiselaki Labani :
— Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi. 32 Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango.
Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango.
33 Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale ; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli. 34 Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.
35 Rasheli alobaki na tata na ye :
— Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso.
Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te. 36 Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye :
— Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ? 37 Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni ? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo. 38 Nasalaki epai na yo mibu tuku mibale ; bameme na yo mpe bantaba na yo elongwaki zemi te, mpe natikalaki te kolia bameme ya mibali kati na bibwele na yo. 39 Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu. 40 Moyi ezalaki kobeta ngai na mokolo, malili ezalaki kokanga ngai na butu, mpe pongi ezalaki kokima ngai na miso. 41 Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale : nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo ; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai. 42 Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
Jakobi asali boyokani elongo na Labani
43 Labani azongiselaki Jakobi :
— Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti ? 44 Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.
45 Boye Jakobi azwaki libanga mpe atelemisaki yango lokola elembo. 46 Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Bolokota mabanga ! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga. 47 Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi.
48 Labani alobaki :
— Lelo, liboke oyo ya mabanga ezali litatoli kati na yo mpe ngai.
Yango wana babengaki yango Galedi. 49 Babengaki yango lisusu Mitsipa ; pamba te Labani alobaki lisusu : « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te. 50 Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
51 Labani alobaki lisusu na Jakobi :
— Tala liboke oyo ya mabanga mpe libanga ya elembo oyo natelemisi kati na ngai mpe yo. 52 Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo ; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai. 53 Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso !
Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga. 54 Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.