32
Jakobi abangi kokutana na Ezawu
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze ; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye. Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye. Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi*.
Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi. Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo. Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo. Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »
10 Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › 11 Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale. 12 Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango. 13 Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › »
14 Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye : 15 bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale, 16 shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi. 17 Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango : « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. »
18 Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? › 19 Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › »
20 Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu. 21 Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
22 Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako.
Jakobi abundi na Nzambe
23 Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki. 24 Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso. 25 Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana. 26 Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda. 27 Sima, moto yango alobaki :
— Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana.
Kasi Jakobi azongisaki :
— Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te.
28 Moto yango atunaki Jakobi :
— Kombo na yo nani ?
Jakobi azongisaki :
— Kombo na ngai ezali Jakobi.
29 Moto yango alobaki lisusu :
— Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
30 Jakobi alobaki :
— Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo.
Azongiselaki ye :
— Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ?
Boye apambolaki ye na esika wana. 31 Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »
32 Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye. 33 Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo.
* 32:3 Maanayimi elingi koloba : milako mibale.