34
Dina mpe bato ya Sishemi
Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana. Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi. Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo. Sishemi alobaki na Amori, tata na ye : « Balela ngai elenge mwasi oyo. »
Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi. Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.
Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi. Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala : bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi, 10 bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »
11 Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina :
— Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai. 12 Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.
13 Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori. 14 Balobaki na bango :
— Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso. 15 Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga. 16 Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko. 17 Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso.
18 Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali. 19 Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye. 20 Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango : 21 « Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. 22 Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango. 23 Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? »
24 Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi ; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga.
25 Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso. 26 Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye. 27 Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi. 28 Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga. 29 Bakamataki bomengo na bango nyonso : bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango.
30 Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi :
— Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
31 Bango bazongisaki :
— Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?