33
Jakobi akutani na Ezawu
Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi. Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka. Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.
Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela. Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki :
— Banani wana bazali elongo na yo ?
Jakobi azongisaki :
— Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.
Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki. Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama.
Ezawu atunaki :
— Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ?
Jakobi azongisaki :
— Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
Kasi Ezawu azongisaki :
— Ndeko na ngai, biloko nyonso oyo, nazali na yango ebele ; bomba biloko na yo mpo na yo moko.
10 Jakobi alobaki :
— Nabondeli yo : soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai ; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto. 11 Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso.
Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.
12 Ezawu alobaki :
— Telema tokende, nakotambola na yo nzela moko.
13 Kasi Jakobi azongiselaki ye :
— Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa. 14 Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
15 Ezawu alobaki :
— Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai.
Kasi Jakobi atunaki :
— Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !
16 Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri. 17 Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye ; yango wana babengi esika yango Sukoti.
18 Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba. 19 Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo. 20 Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »