41
Ndoto ya Faraon
Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili, amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili. Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili. Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki.
Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale : nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko. Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene. Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto.
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai. 10 Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. 11 Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko : ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. 12 Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye. 13 Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai ; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. »
14 Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon.
15 Faraon alobaki na Jozefi :
— Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
16 Jozefi azongiselaki Faraon :
— Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.
17 Faraon alobaki na Jozefi :
— Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili. 18 Namonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili. 19 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki : ya mike, ya mabe penza mpe ekonda ; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito. 20 Ngombe ya basi ekonda mpe ya mabe eliaki bangombe sambo ya mafuta oyo ebimaki liboso. 21 Bongo ekotaki na mabumu na yango kasi ezalaki komonana te ete bangombe ya mafuta ekoti na mabumu ya bangombe ekonda, mpe lolenge na yango ezalaki kaka mabe lokola ndenge ezalaki liboso. Kaka na tango yango, nalamukaki. 22 Na ndoto na ngai mosusu, namonaki mito sambo ya ble ya kitoko mpe ya mafuta kobima na nzete moko. 23 Sima na yango, mito sambo mosusu ya ble ebimaki. Ezalaki ya kokawuka, ekonda mpe ezika na mopepe ya este. 24 Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango.
25 Jozefi alobaki na Faraon :
— Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala. 26 Bangombe sambo ya basi ya kitoko ezali mibu sambo, mpe mito sambo ya ble ezali mibu sambo : ezali kaka ndoto moko. 27 Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo ; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi. 28 Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala. 29 Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito. 30 Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango ; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili. 31 Bakokanisa lisusu te bofuluki nyonso ya mokili likolo ya nzala makasi oyo ekolanda, pamba te nzala ekozala makasi penza. 32 Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu. 33 Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito. 34 Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki. 35 Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba. 36 Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito ; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te.
37 Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso. 38 Faraon atunaki bango :
— Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?
39 Faraon alobaki na Jozefi :
— Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo. 40 Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo.
Jozefi azwi bokonzi
41 Faraon alobaki na Jozefi :
— Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
42 Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo. 43 Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! »
Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
44 Faraon alobaki lisusu na Jozefi :
— Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te.
45 Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. 46 Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.
47 Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi. 48 Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango. 49 Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka ; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.
Bana ya Jozefi
50 Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. 51 Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. » 52 Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »
Nzala makasi
53 Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka, 54 mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te. 55 Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
56 Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka. 57 Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba.